Lyrics

Ozali Nzambe, Nzambe na nguya nioso Likolo na nse bikelami na yo Nguya na yo efandi na kembo na yo Na bosantu bua yo, mpe na bokumu bua yo Mitunguisi nioso ya bomoyi na ngai Ekomaka kimia tango posa na yo Y'okitisaka moto n'etumbelo oh Bo banguna na yo bakufa na nsoni Nzambe na nguya eh Kumisama Yahwe, (Nzambe na ngai) Nzambe na nguya eh, (Papa eh) Kumisama Yahwe Na yembeli yo Papa malamu uu Kumisama Yahwe, (Nkolo na ngai) Nzambe na nguya eh, (Papa eh) Kumisama Yahwe Ozali Nzambe, oyo apona ngai Mubundi molongi, ya bitumba na nga Yo nde opangusaka, pinzoli na miso Na mitema oyo mizali kolela Oniata satana, kuna na Golgotha Bo mapinga na yo, ba zala n'elonga eh Nguya na yo, emonani na miso Bato ba kobika pona kombo na yo Nzambe na nguya ee Kumisama Yahwe, (Nzambe na ngai) Nzambe na nguya eh, (Papa eh) Kumisama Yahwe Na yembeli yo Papa malamu uu Kumisama Yahwe, (Nzambe na ngai) Nzambe na nguya eh, (Papa eh) Kumisama Yahwe (Plusieurs fois): Kumama Yahwe, Kumama Yahwe Kumama Nzambe na nguya, kumama Yahwe Okabola mayi n'ebale, Papa y'obonguani te Ata na kati na moto, nayebi na kolonga Okatisa mabota na nguya ya loboko na yo Yo nde Nzambe na Mose, okosaka te oh Kumama Yahwe, Kumama Yahwe Kumama Nzambe na nguya, kumama Yahwe Nani akoki kosunga lokola yo mosantu Yo nde Nkolo na bomoyi, otonda nguya Osekuisa Masiya na nguya ya loboko na yo Ata na kufi lelo oyo, nayebi na kosekua Fololo ya bolingo, na ye kobonzela yo Yo nde osimbi mitema, ozali Nzambe eh Kumama Yahwe, Kumama Yahwe Kumama Nzambe na nguya, kumama Yahwe Okabola mayi n'ebale, Papa y'obonguani te Ata na kati na moto, nayebi na kolonga Okatisa mabota na nguya ya loboko na yo Yo nde Nzambe na Mose, okosaka te oh Nani akoki kosunga lokola yo mosantu Yo nde Nkolo na bomoyi, otonda nguya Osekuisa Masiya na nguya ya loboko na yo Ata na kufi lelo oyo, nayebi na kosekua Nani akoki kosunga lokola yo mosantu Yo nde Nkolo na bomoyi, otonda nguya Fololo ya bolingo, toye kobonzela yo Papa osimbi mitema, ozali Nzambe eh
Writer(s): Inconnu Compositeur Auteur, Katoto Luhembe Antoine Lyrics powered by www.musixmatch.com
instagramSharePathic_arrow_out