Music Video

Loyembo La Ngai
Watch {trackName} music video by {artistName}

Featured In

Credits

PERFORMING ARTISTS
Adorons L'éternel
Adorons L'éternel
Performer
COMPOSITION & LYRICS
Franck Gael Moloto
Franck Gael Moloto
Songwriter

Lyrics

1.- Nkolo yamba loyembo la nga Libonza ya moto asimbami na yo N'azali elémbo ya bolingo bua yo Mokonzi ya bomoi na ngai Otika likolo polele Másiya Po tomona nkémbo pe nguyá na yo Ozali lisimba ya mayi ma lobiko Yo Nkumu ya ba nkumu banso Choeur 1: Y'Ozali bopemi bua ngai Bipayi nakotika mikumba mia ngai Ozali solo likonzi lisímbi ndako Masiya na ngai Y'Ozali lokumu la ngai Bipayi nakosímba soki na lembi Ozali bipayi nakitisaka motéma Másiya na ngai 2.- Ozali nzete ya bolingo Masiya Nakati y'elanga ya motema na ngai Epesa fololo ya malasi kitoko Na miso ya Nzambe na bule Opesa bokono nkombo ya lobiko Obenga liwá na nkombo ya mpongi Po'ete lisekwa ezali yo Masiya Mokonzi ya bakonzi banso Choeur 2: Na sopi motema na ngai Libosó ya kiti ya ngolu na yo Po'ete lobiko na ngai ekowuta na yo Masiya na ngai Kitisa nguya na yo Nkolo Awa tokobelela nkombo na yo Lakisa biso nkembo pe makasi na yo Nzambe na nguya 3.- Yamba maloba ya motema na ngai Mosopani liboso na yo mosantu Na zongisa nkémbo pe lokumu na yo Yo nzéla pe bomoi ya suko Ata molili ya mokili eyindi Mwinda na yo moko ngengisa nzela na ngai Oyo asimba ngai loboko ezali yo Mokonzi ya bomoyi na ngai
Writer(s): Inconnu Compositeur Auteur, Katoto Luhembe Antoine Lyrics powered by www.musixmatch.com
instagramSharePathic_arrow_out