Lyrics

.- Nkolo yamba loyémbo la nga Libonza ya moto asimbami na yo N'azali elémbo ya bolingo bua yo Mokonzi ya bomoi na ngai Otika likolo polélé Másiya Po tomona nkémbo pe nguyá na yo Ozali lisimba ya mayi ma lobiko Yo Nkúmu ya ba nkúmu banso Choeur 1: Y'Ozali bopemi bua ngai Bipayi nakotika mikumba mia ngai Ozali solo likonzi lisímbi ndáko Másiya na ngai Y'Ozali lokúmu mia ngai Bipayi nakosímba soki na lembi Ozali bipayi nakitisaka motéma Másiya na ngai 2.- Ozali nzeté ya bolingo Másiya Nakati y'elanga ya motema na ngai Epesa folólo ya malasi kitóko Na miso ya Nzambé na bulêê Opesa bokono nkombo ya lobíko Obenga liwá na nkombo ya mpongí Po'été lisékwá ezali yo Másiya Mokonzi ya bakonzi banso Choeur 2: Na sopi motéma na ngai Libosó ya kiti ya ngolu na yo Po'été lobiko na ngai ekowuta na yo Másiya na ngai Kitisa nguyá na yo Nkóló Awa tokobélela nkombo na yo Lakisa biso nkémbo pe makasi na yo Nzambé na nguya 3.- Yamba maloba ya motéma na ngai Mosopani liboso na yo mosantu Na zongisa nkémbo pe lokúmu na yo Yo nzéla pe bomoi ya séko Atá molili ya mokili eyini Mwinda na yo moko ngengisa nzéla na ngai Oyo asimba ngai lobóko ezali yo Mokonzi ya bomoi na ngai
Writer(s): Inconnu Compositeur Auteur, Katoto Luhembe Antoine Lyrics powered by www.musixmatch.com
instagramSharePathic_arrow_out