Lyrics

Ata mokili etelemi Eboi kokend'ekomi na suka Nayebi Nkol'ozali Ebombamelo na ngai mosantu Mpo'ete nyonso ezali Esalisami kaka na yo eh Mokeli na kokamwa Nyonso esimbami na yo Nkolo! elonga na ngai eza na yo eh Yesu! na yo nde nabengi Nzambe tata Yonde! mobateli ba mpate ya Nzambe Yesu! na yonde nabengami mosantu Nkolo! lobiko ya baye bakoganga Yesu! na yonde na bengami mokitani Ya Nzambe na bomoi Mosungi na ngai azali kosala nabanga Nini oh oh! Ata makasi esili ngai Mpo'ete nzela etondi minyoko Nkolo y'okopesa ngai Loboko ngai nasimba tokende Mosala oy'obandi 0 Komisaka kino na suka Mokonzi na ngai azali Na nguya ya kokomisa ngai Nkolo atelemi nde na nkembo Bikelamu binso bifukama Massiya na ngai aza na bomoi Ngai na ningana tina nini Ata mabele efunguani bipai Natelemi nabanga te oh Oyo asimbi aza makasi Kombo na ye Yesu Kristu Ate mokili eboi kondima Oyo alobi nde yango oh ekosalema mpo na ngai Mosungi na ngai azali kosala na banga nini oh. Ah ah Alléluia, ô Alléluia Yesu aza malamu! Yesu aza na bomoi Ata mitungisi elati mposo; Ata liwa elati nzoto; ata Somo ezui maloba Ekotelema liboso na kombo na Yesu te. Ata satana na mapinga naye nyoso baye, Bakozonga sima. Mpo Yesu akanga nguya ya lifelo. soki otelemi kati na kombo na Yesu A ta ngomba ya mikakatano etelemi, okoleka. Soki omoni lokola moyen ya koleka eza te ndima kaka, Okokoma, soki mpe bitumba ya bomoi na yo eleki moto, fungola ekuke ya kimya, mpe.fanda na kiti Ya elikya, okolonga. Alléluia! Alléluia!
Writer(s): Inconnu Compositeur Auteur, Katoto Luhembe Antoine Lyrics powered by www.musixmatch.com
instagramSharePathic_arrow_out